Yisaya 48:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 “Lisusu, oyoki te,+ oyebi mpe te, banda ntango wana litoi na yo efungwami mpe te. Mpo nayebi malamu ete ozalaki mpenza kosala makambo na bokosi,+ mpe babengá yo ‘moto oyo abukaka mibeko banda na libumu.’+ Yirimia 5:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpo ndako ya Yisraele mpe ndako ya Yuda basaleli ngai makambo na bokosi mpenza,” yango nde liloba ya Yehova.+ Hosea 5:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Basaleli Yehova makambo na bokosi,+ mpo bakómi batata ya bana oyo bazali bapaya.+ Sikoyo, bakolyama na sanza moko elongo na biloko na bango.+ Hosea 6:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Kasi bango, babuki kondimana+ lokola moto ya mabele. Wana nde esika basaleli ngai makambo na bokosi.+ Malaki 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Yuda asali makambo na bokosi, mpe likambo oyo eyinamá esalemi na Yisraele mpe na Yerusaleme;+ mpo Yuda atuki bosantu ya Yehova,+ oyo Ye alingaki, mpe azwi mwana mwasi ya nzambe mopaya ete azala mwasi na ye.+
8 “Lisusu, oyoki te,+ oyebi mpe te, banda ntango wana litoi na yo efungwami mpe te. Mpo nayebi malamu ete ozalaki mpenza kosala makambo na bokosi,+ mpe babengá yo ‘moto oyo abukaka mibeko banda na libumu.’+
11 Mpo ndako ya Yisraele mpe ndako ya Yuda basaleli ngai makambo na bokosi mpenza,” yango nde liloba ya Yehova.+
7 Basaleli Yehova makambo na bokosi,+ mpo bakómi batata ya bana oyo bazali bapaya.+ Sikoyo, bakolyama na sanza moko elongo na biloko na bango.+
7 Kasi bango, babuki kondimana+ lokola moto ya mabele. Wana nde esika basaleli ngai makambo na bokosi.+
11 Yuda asali makambo na bokosi, mpe likambo oyo eyinamá esalemi na Yisraele mpe na Yerusaleme;+ mpo Yuda atuki bosantu ya Yehova,+ oyo Ye alingaki, mpe azwi mwana mwasi ya nzambe mopaya ete azala mwasi na ye.+