Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Yehova akoyokela Yakobo mawa,+ mpe lisusu, akopona mpenza Yisraele;+ mpe ya solo akopemisa bango na mabele na bango,+ mpe moto oyo afandi mopaya akosangana mpenza na bango mpe bakokangana mpenza na ndako ya Yakobo.+

  • Yirimia 31:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Efraime azali nde mwana ya motuya epai na ngai, to mwana oyo nalɛngɛlaka?+ Mpo ndenge nazali koloba mabe mpo na ye, ndenge mpe nakokanisa ye lisusu.+ Yango wana misɔpɔ na ngai ekómi na yikiyiki.+ Nakoyokela mpenza ye mawa,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Hosea 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi nakoyokela ndako ya Yuda mawa,+ mpe nakobikisa bango na nzela ya Yehova Nzambe na bango;+ kasi nakobikisa bango na nzela ya litimbo te, ya mopanga te, ya etumba te, ya bampunda te, ya bato oyo batambolaka na mpunda mpe te.”+

  • Mika 7:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Akoyokela biso lisusu mawa;+ akonyata mabunga na biso.+ Mpe okobwaka masumu na bango nyonso na bozindo ya mbu.+

  • Zekaria 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nakolongisa ndako ya Yuda, mpe nakobikisa ndako ya Yozefe.+ Mpe nakopesa bango esika ya kofanda, mpo nakoyokela bango mawa;+ mpe bakokóma lokola bato oyo nabwakaki bango te;+ mpo nazali Yehova Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto