Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 8:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na kolanda makambo nyonso oyo basalaki banda mokolo nabimisaki bango na Ezipito+ tii na mokolo ya lelo, ndenge bazalaki se kotika ngai+ mpe kosalela banzambe mosusu,+ ndenge yango nde bazali kosala yo.

  • 2 Bakonzi 17:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 mpe bayokaki te kasi bazalaki se kokómisa mitó na bango makasi*+ lokola mitó ya bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki+ Yehova Nzambe na bango te;

  • Nehemia 9:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+

  • Yirimia 7:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Kasi bayokaki ngai te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kokómisa mitó na bango makasi.+ Basalaki mabe koleka bankɔkɔ na bango!+

  • Zekaria 7:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bakómisaki motema+ na bango lokola libanga ya emeri mpo bátosaka te mobeko+ mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na nzela ya elimo na ye,+ na nzela ya basakoli ya kala;+ bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto