7 “Kanisá: Kobosana te ndenge otumolaki Yehova Nzambe na yo na esobe.+ Banda na mokolo oyo obimaki na mokili ya Ezipito kino kokóma na bino na esika oyo, botombokelaki Yehova na etamboli na bino.+
25 Tozali kolala na kati ya nsɔni+ na biso, mpe kosambwa na biso ezali kaka kozipa biso;+ mpo ezali Yehova Nzambe na biso nde tosaleli lisumu,+ biso ná batata na biso banda bolenge na biso tii na mokolo ya lelo,+ mpe totosi te mongongo ya Yehova Nzambe na biso.”+
24 Kasi bayokaki te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi babandaki kotambola na batoli na bango, na motó makasi ya motema na bango ya mabe,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te,+