Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe esika makasi ya libateli ya Farao ekokóma mpenza likambo moko ya nsɔni mpo na bino,+ mpe kobombama na elili ya Ezipito ekokóma eloko oyo ezali kosambwisa.+

  • Yisaya 31:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nzokande, Baezipito bazali bato ya mabele,+ kasi Nzambe te; mpe bampunda na bango ezali mosuni,+ kasi elimo te. Mpe Yehova ye moko akosembola lobɔkɔ na ye, mpe moto oyo azali kosunga akobɛta mpenza libaku, mpe moto oyo azali kosungama akokwea mpenza,+ mpe bango nyonso bakosila na mbala moko.

  • Yirimia 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Talá oyo Yehova alobi: “Alakelama mabe mobali makasi oyo azali kotyela moto ya mabele motema+ mpe azali mpenza kokómisa moto ya mosuni lobɔkɔ na ye,+ mpe oyo motema na ye ezali kotika Yehova.+

  • Bileli 4:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Wana tozali naino na bomoi, miso na biso ezali se kolɛmba mpamba mpo na kozela lisungi na biso.+

      Ntango tozalaki kotalatala, totalelaki ekólo oyo ekoki koya na lobiko te.+

  • Ezekiele 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe na nzela ya limpinga monene ya basoda mpe na nzela ya lisangá ya bato ebele, Farao akolongisa ye na etumba te,+ na kotomboláká mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga mboka, mpe na kotongáká efelo ya kozinga mboka, mpo na koboma milimo ebele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto