Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mawa na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka lisungi,+ baoyo bazali kotya motema na bampunda,+ mpe baoyo bazali kotya motema na makalo+ ya bitumba, mpo ezali ebele, mpe na bampunda, mpo ezali na makasi mingi, kasi batali Mosantu ya Yisraele te mpe baluki Yehova te.+

  • Yirimia 37:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Talá oyo bokoloba na mokonzi ya Yuda, moto oyo azali kotinda bino epai na ngai mpo na kotuna ngai:+ “Talá! Limpinga ya basoda ya Farao oyo bazali koya epai na bino mpo na kosalisa bino bakozonga mpenza na mokili na bango, na Ezipito.+

  • Bileli 4:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Wana tozali naino na bomoi, miso na biso ezali se kolɛmba mpamba mpo na kozela lisungi na biso.+

      Ntango tozalaki kotalatala, totalelaki ekólo oyo ekoki koya na lobiko te.+

  • Ezekiele 29:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bato nyonso oyo bafandi na Ezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ mpamba te na esika bázala eloko oyo moto akoki koyɛkamela, bazalaki nde mongendu mpo na ndako ya Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto