-
Ezekiele 20:21Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 “‘“Mpe bana babandaki kotombokela ngai.+ Batambolaki na mibeko na ngai te, mpe batosaki te bikateli na ngai ya lisambisi, basalelaki yango te, oyo, soki moto asaleli yango, akotikala mpe na bomoi na nzela na yango.+ Bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba.+ Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai, mpo nakosilisela bango nkanda na ngai na esobe.+
-