Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 9:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Botombokelaki Yehova+ na etamboli na bino banda mokolo oyo ngai nayebaki bino.

  • Nehemia 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Nzokande, bazangaki botosi+ mpe batombokelaki yo+ mpe bazalaki ntango nyonso kobwaka mobeko na yo na nsima ya mokɔngɔ na bango,+ mpe babomaki basakoli na yo,+ oyo bazalaki kotatwela bango mpo na kozongisa bango epai na yo;+ mpe bazalaki kaka kosala makambo na limemya ata moke te.+

  • Nzembo 78:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpe basengeli te kokóma lokola bankɔkɔ na bango,+

      Libota ya motó makasi mpe ya botomboki,+

      Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+

      Mpe oyo Nzambe atyelaki elimo na bango motema te.+

  • Yirimia 3:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Tozali kolala na kati ya nsɔni+ na biso, mpe kosambwa na biso ezali kaka kozipa biso;+ mpo ezali Yehova Nzambe na biso nde tosaleli lisumu,+ biso ná batata na biso banda bolenge na biso tii na mokolo ya lelo,+ mpe totosi te mongongo ya Yehova Nzambe na biso.”+

  • Ezekiele 20:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe nalobaki na bana na bango na esobe+ ete: ‘Bótambola na malako ya bankɔkɔ na bino te,+ mpe bótosa bikateli na bango ya lisambisi te,+ mpe bómikómisa mbindo te na bikeko na bango ya bosɔtɔ.+

  • Misala 7:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 “Bato ya mitó makasi mpe bazangá kokatama ngenga na mitema+ mpe na matoi, bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu; ndenge bankɔkɔ na bino basalaki, bino mpe bozali kosala bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto