Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 25:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Farao mokonzi ya Ezipito, basaleli na ye, bankumu na ye mpe bato na ye nyonso;+

  • Yirimia 46:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpo na Ezipito,+ mpo na limpinga ya basoda ya Farao Neko mokonzi ya Ezipito,+ oyo azalaki pene ya ebale Efrate na Karakemishe,+ oyo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone alongaki na mbula ya minei ya Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda:

  • Yirimia 46:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Liloba oyo Yehova alobaki na mosakoli Yirimia mpo na koya ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone mpo na kobɛta mokili ya Ezipito:+

  • Ezekiele 29:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kopesa mokili ya Ezipito na Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema mpenza bozwi na yango mpe akobɔtɔla biloko na yango mingi+ mpe akopunza ebele ya biloko na yango; mpe ekokóma mpenza lifuti mpo na mampinga ya basoda na ye.’

  • Ezekiele 30:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe mopanga ekokɔta mpenza na Ezipito,+ mpe mpasi makasi ekobima mpenza na Etiopi ntango bato bakokwea bibembe na Ezipito mpe bakozwa mpenza bozwi na yango mpe miboko na yango ekobukama mpenza.+

  • Ezekiele 30:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe na Tehafenehese,+ mokolo ekoyinda mpenza, ntango nakobuka ekanganeli ya Ezipito.+ Mpe kati na ye, lolendo ya makasi na ye ekosilisama mpenza.+ Kasi ye, mapata ekozipa ye,+ mpe basité na ye oyo esimbami na ye ekokende na bokangami.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto