Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 13:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bato bakofanda epai na ye ata mokolo moko te,+ akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.+ Mpe Moarabe akopika hema na ye kuna te, mpe babateli ya mpate bakolalisa bitonga na bango kuna te.

  • Yisaya 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Mpe nakokómisa yango esika ya nziko mpe ya bitima oyo etondi na matiti, mpe nakokɔmba yango na nkɔmbɔ oyo esilisaka nyɛɛ,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.

  • Yirimia 50:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo ekólo moko euti na nɔrdi eyei kobundisa ye.+ Yango nde ezali kokómisa mokili na ye eloko ya kokamwa, bongo moto moko te azali kofanda kuna.+ Moto mpe nyama ya mboka bakimi.+ Bakei na bango.”+

  • Yirimia 50:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Bongo bato oyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai bakofanda elongo na banyama oyo ezali koganga, mpe bamaligbanga ekofanda epai na ye;+ moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”+

  • Yirimia 51:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe mabele eningana mpe ezala na mpasi makasi,+ mpamba te makanisi ya Yehova ebimi mpo na kobundisa Babilone, mpo na kokómisa mokili ya Babilone eloko ya kokamwa, moto azali kofanda kuna te.+

  • Yirimia 51:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe Babilone ekokóma mpenza mabondo ya mabanga,+ esika bambulú efandaka,+ eloko ya kokamwa mpe eloko ya kobɛtɛla piololo, moto azali kofanda kuna te.+

  • Emoniseli 18:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te;+ mpo bato na yo ya mombongo+ oyo basalaka mibembo bazalaki bato ya bibonga minene+ ya mabele, mpo okosi bikólo nyonso na misala na yo ya bilimo mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto