Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto moko ayoki maloba ya ndai+ oyo, mpe amipamboli na motema na ye, alobi: ‘Nakozala na kimya,+ ata natamboli na motó makasi ya motema na ngai,’+ na makanisi ya kolongola oyo ezwaka mai mingi elongo na oyo ezangi mai,

  • Yirimia 5:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Kasi bato oyo mpenza bakómi na motema makasi mpe ya botomboki; bapɛngwi mpe bazali kaka kotambola na nzela na bango.+

  • Yirimia 23:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+

  • Ezekiele 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nde ndako ya Yisraele, bango bakolinga te koyoka yo, mpo bazali kolinga koyoka ngai te;+ mpo bato nyonso ya ndako ya Yisraele bazali motó makasi mpe motema makasi.+

  • Hosea 4:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpamba te Yisraele mpe akómi motó makasi lokola ngɔmbɛ-mwasi ya motó makasi.+ Sikoyo nde Yehova akokamba bango lokola mwana-mpate ya mobali na esika oyo ezali monene?

  • Zekaria 7:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bakómisaki motema+ na bango lokola libanga ya emeri mpo bátosaka te mobeko+ mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na nzela ya elimo na ye,+ na nzela ya basakoli ya kala;+ bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto