Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo alobaki ete: “Soki sikoyo nandimami na miso na yo, Ee Yehova, nabondeli yo, tiká Yehova atambola kati na biso,+ mpo yango ezali ekólo ya bato ya motó makasi,+ mpe osengeli kolimbisa libunga na biso mpe lisumu na biso,+ mpe osengeli kozwa biso tózala eloko na yo.”+

  • Nehemia 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Kasi bango, ɛɛ bankɔkɔ na biso, basalaki makambo na lofundo+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,*+ mpe bayokaki mibeko na yo te.

  • Yirimia 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na yango, baboyeli yo mbula monene,+ mpe ata mbula ya eleko ya prɛnta ezali te.+ Mpe elongi na yo ekómi lokola elongi ya mwasi oyo azali kosala bondumba. Oboyi koyoka nsɔni.+

  • Yirimia 5:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Ee Yehova, miso na yo etalaka epai ya bosembo te?+ Obɛti bango,+ kasi babɛli te.+ Osilisaki bango nyɛɛ.+ Baboyaki kondima disiplini.+ Bakómisaki bilongi na bango makasi koleka libanga.+ Baboyaki kozonga.+

  • Yirimia 7:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Kasi bayokaki ngai te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kokómisa mitó na bango makasi.+ Basalaki mabe koleka bankɔkɔ na bango!+

  • Ezekiele 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe bana ya elongi ya lofundo+ mpe ya motema makasi+—nazali kotinda yo epai na bango, mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto