22 Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele,+ oyo bato na yango bazali lokola makɔnkɔ, Moto oyo atandaka likoló lokola mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ, oyo asembolaka yango lokola hema ya kofanda,+
“Liloba ya Yehova mpo na Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova, Ye oyo azali kotanda likoló+ mpe azali kotya moboko ya mabele+ mpe azali kosala elimo+ ya moto na kati na ye.