Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 9:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Azali kotanda likoló ye moko+

      Mpe azali kotambola likoló ya mbonge mineneminene ya mbu;+

  • Yobo 38:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Ntango natyaki lipata lokola elamba na yango

      Mpe molili tuu lokola mwa elamba ya kolínga,

  • Yisaya 42:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi, ye Mozalisi ya likoló+ mpe Nzambe Monene oyo atandá yango;+ Ye oyo atandá mabele+ mpe mbuma na yango,+ Ye oyo azali kopesa mpema+ na bato oyo bafandi wana,+ mpe elimo na baoyo bazali kotambola wana:+

  • Yisaya 44:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli+ na yo mpe Moto oyo asalaki yo banda na libumu: “Ngai Yehova nazali kosala eloko nyonso, ngai moko nazali kotanda likoló,+ nazali kotanda mabele.+ Nani azalaki elongo na ngai?

  • Yirimia 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ye azali Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye,+ Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na nzela ya bwanya na ye,+ mpe Ye oyo atandaki likoló na nzela ya mayele na ye.+

  • Zekaria 12:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Liyebisi:

      “Liloba ya Yehova mpo na Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova, Ye oyo azali kotanda likoló+ mpe azali kotya moboko ya mabele+ mpe azali kosala elimo+ ya moto na kati na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto