Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Balevi 20:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na yango, nalobaki na bino ete:+ “Bino, ɛɛ bino, bokozwa mokili na bango, mpe ngai, ɛɛ ngai, nakopesa bino yango mpo bózwa yango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Nazali Yehova Nzambe na bino, ngai moto nakaboli bino na bato ya bikólo.”+

  • Kolimbola Mibeko 6:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli koyoka, Ee Yisraele, mpe kokeba ete osalela+ yango, mpo makambo na yo etambola malamu+ mpe mpo bókóma mingi mpenza, kaka ndenge Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na yo apesaki yo elaka,+ na ntina na mokili oyo etondi na miliki mpe mafuta ya nzoi.

  • Yosua 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo bana ya Yisraele batambolaki mbula ntuku minei (40)+ na esobe, tii ntango ekólo mobimba ya mibali ya etumba oyo babimaki na Ezipito, oyo baboyaki koyoka mongongo ya Yehova basilaki, baoyo Yehova alapaki ndai mpo na bango ete bakomona soki moke te mokili+ oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bango ete akopesa biso,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

  • Ezekiele 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mokolo yango, natombolaki lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto