7 Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te,+ mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te,+ mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso;+ kasi Yehova, amonaka ndenge motema+ ezali.”
9 “Mpe yo, mwana na ngai Salomo, yebá+ Nzambe ya tata na yo mpe salelá+ ye na motema mobimba+ mpe na molimo ya esengo;+ mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso,+ mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.+ Soki oluki ye, akosala ete omona ye;+ kasi soki otiki ye,+ akobwaka yo mpo na libela.+
10 Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema+ mpe natalatalaka bangɛi,+ ɛɛ mpo na kopesa moto na moto ndenge banzela na ye ezali,+ ndenge mbuma ya misala na ye ezali.+
23 Mpe nakoboma bana na ye na bolɔzi ya liwa, bongo masangá nyonso ekoyeba ete ngai natalaka bangɛi mpe mitema, mpe nakopesa bino moto na moto na kolanda misala na bino.+