Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 1:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na ntango yango, bakokoba kobenga ngai, kasi nakoyanola te;+ mpe bakokoba koluka ngai, kasi bakomona ngai te,+

  • Yisaya 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+

  • Yisaya 58:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “‘Mpo na nini tokilaki bilei mpe omonaki yango te,+ mpe tomonisaki molimo na biso mpasi+ kasi otyaki likebi te?’+

      “Ya solo, bozalaki nde kosepela na mokolo mpenza oyo bozalaki kokila bilei, ntango bozalaki kotinda na makasi bato na bino nyonso oyo babomaka nzoto na mosala ete básala mosala.+

  • Yirimia 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na yango, talá oyo Yehova alobi: ‘Talá nazali kokitisela bango mpasi+ oyo bakokoka kobima na yango te;+ mpe bakobelela ngai mpo na kosɛnga lisalisi, kasi nakoyoka bango te.+

  • Ezekiele 8:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ngai mpe nakosala makambo na nkɛlɛ.+ Liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Mpe bakobelela mpenza na mongongo makasi na matoi na ngai, kasi nakoyoka bango te.”+

  • Zekaria 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “‘Mpe esalemaki boye: Lokola abengaki mpe bango bayokaki te,+ bango mpe babengaki ngai mpe nayokaki te,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto