Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 18:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi mobikisi azali te,+

      Epai ya Yehova, kasi azali koyanola bango ata moke te.+

  • Masese 1:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na ntango yango, bakokoba kobenga ngai, kasi nakoyanola te;+ mpe bakokoba koluka ngai, kasi bakomona ngai te,+

  • Yisaya 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+

  • Yirimia 14:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ntango bazali kokila bilei, nazali koyoka te kosɛngasɛnga na bango ya kolela,+ mpe ntango bazali kopesa likabo ya kotumba mobimba mpe likabo ya mbuma, nazali kosepela na yango te;+ mpo nazali kosukisa bango na mopanga, na nzala, mpe na maladi mabe.”+

  • Ezekiele 8:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ngai mpe nakosala makambo na nkɛlɛ.+ Liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Mpe bakobelela mpenza na mongongo makasi na matoi na ngai, kasi nakoyoka bango te.”+

  • Mika 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Na ntango yango, bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, kasi akoyanola bango te.+ Mpe akobombela bango elongi na ye na ntango wana,+ na kolanda mabe oyo basalaki na misala na bango.+

  • Zekaria 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “‘Mpe esalemaki boye: Lokola abengaki mpe bango bayokaki te,+ bango mpe babengaki ngai mpe nayokaki te,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto