Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 31:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango, nkanda na ngai ekongalela mpenza bango na mokolo yango,+ mpe nakosundola mpenza bango+ mpe nakobombela bango elongi na ngai,+ mpe bakokóma mpenza eloko ya kozikisa; mpe makama mingi mpe bampasi mingi esengeli kokwela bango,+ mpe bakozanga te koloba na mokolo yango ete: ‘Makama oyo ekweli biso mpo Nzambe na biso azali na kati na biso te, boye te?’+

  • 2 Ntango 15:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ekólo oyo ebukaki ekólo oyo+ mpe engumba oyo ebukaki engumba oyo, mpo Nzambe ye moko atikaki bango na mobulu, na mpasi ya ndenge nyonso.+

  • Yisaya 27:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ntango bitape na ye ya mike ekokauka, basi oyo bakoya bakobuka yango, bakopelisa yango mɔtɔ.+ Mpo bazali bato ya mayele mingi te.+ Yango wana Mokeli na bango akoyokela bango mawa te, mpe Moto oyo asalaki bango akomonisela bango boboto te.+

  • Yisaya 63:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi bango batombokaki+ mpe bayokisaki elimo santu na ye mpasi.+ Bongo akómaki monguna+ na bango; ye moko abundaki na bango.+

  • Zekaria 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo liboso ya mikolo yango, bato bazalaki na lifuti te;+ bongo lifuti mpo na banyama ya mboka: eloko ya ndenge wana ezalaki te; mpe mpo na monguna, moto oyo azalaki kobima mpe moto oyo azalaki kokɔta azalaki na kimya te,+ mpamba te nazalaki kaka kotinda bato nyonso ete bátɛmɛlana.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto