Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+

      Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye,+

      Nguba na ngai mpe liseke na ngai ya lobiko, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+

  • Masese 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.+

  • Yisaya 25:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpo okómi esika makasi ya libateli mpo na moto oyo azangá, esika makasi ya libateli mpo na mobola na mpasi oyo azali na yango,+ esika ya kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, elili+ ya kokima molunge, ntango mopɛpɛ ya banyokoli ezali lokola mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali kobɛta efelo.

  • Yirimia 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kokóma te eloko oyo ezali kopesa ngai nsɔmɔ.+ Ozali ekimelo na ngai na mokolo ya mpasi.+

  • Nahumu 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Yehova azali malamu,+ esika makasi ya libateli+ na mokolo ya mpasi.+

      Mpe ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto