Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 115:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Bikeko na bango ezali palata mpe wolo,+

      Esalemi na mabɔkɔ ya moto ya mabele.+

  • Yisaya 37:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe bazikisaki banzambe na bango na mɔtɔ,+ mpo bazali banzambe te,+ kasi mosala ya mabɔkɔ ya moto,+ nzete mpe libanga, bongo babebisaki yango.+

  • Yirimia 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ekólo moko esilá kutu kotya baoyo bazali banzambe te+ na esika ya banzambe na yango?+ Kasi bato na ngai batye eloko oyo ekoki kopesa litomba te na esika ya nkembo na ngai.+

  • Misala 19:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Lisusu, bozali komona mpe koyoka ndenge Paulo wana, na Efese+ kaka te kasi mpe na bisika pene na nyonso ya etúká ya Azia, andimisi ebele mpenza ya bato mpe atindi bango bándima likanisi mosusu, alobi: banzambe oyo basalemi na mabɔkɔ+ bazali banzambe te.

  • 1 Bakorinti 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+

  • Bagalatia 4:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nzokande, ntango boyebaki Nzambe te,+ na ntango yango bozalaki baombo ya baoyo bazali mpenza banzambe te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto