Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe nakopalanganisa bino na kati ya bikólo,+ mpe nakobimisa mopanga na ekótó nsima na bino;+ mpe mokili na bino esengeli kotikala mpamba,+ mpe bingumba na bino ekokóma kaka bitiká mpamba.

  • 2 Bakonzi 24:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe amemaki na mboka mopaya+ Yerusaleme mobimba ná bankumu+ nyonso ná bilombe nyonso mpe mibali ya nguya+—amemaki bato nkóto zomi (10 000) na mboka mopaya—mpe lisusu moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ ná motongi nyonso ya bifelo ya makasi ya libateli. Ata moto moko te atikalaki, longola kaka bato mpamba+ kati na bato ya mokili.

  • 2 Bakonzi 25:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe mokonzi ya Babilone abɛtaki+ bango mpe abomaki bango na Ribla, na mokili ya Hamate.+ Ndenge wana nde Yuda elongwaki na mabele na yango ekei mboka mopaya.+

  • Yirimia 39:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki na engumba, mpe baoyo bakimaki mpo na kokende epai na ye, mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi+ amemaki bango na mboka mopaya, na Babilone.+

  • Yirimia 52:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe mokonzi ya Babilone abɛtaki bango+ mpe abomaki bango na Ribla+ na mokili ya Hamate.+ Ndenge wana nde Yuda elongwaki na mabele na yango ekei mboka mopaya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto