Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 23:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Talá nazali kotɛmɛla basakoli yango ya bandɔtɔ ya lokuta,” yango nde liloba ya Yehova, “baoyo bazali koyebisa yango mpe bazali kosala ete bato na ngai báyengayenga mpo na makambo na bango ya lokuta+ mpe mpo na komikumisa+ na bango.”

      “Kasi ngai natindaki bango te mpe napesaki bango mitindo te. Na yango, bakopesa bato oyo litomba ata moko te,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yirimia 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘“‘Bongo bino, bóyokela basakoli na bino te+ mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná mpe balɔti ndɔtɔ+ na bino mpe bato na bino ya misala ya maji mpe banganga-nkisi+ na bino, oyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.”+

  • Mika 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá oyo Yehova alobi mpo na basakoli oyo bazali kosala ete bato na ngai báyengayenga,+ oyo bazali koswa na mino na bango+ mpe oyo bazali mpenza koganga ete: ‘Kimya!’+ nzokande, soki moto atye eloko na minɔkɔ na bango te, bazali mpenza kosantisa etumba mpo na kobundisa ye:+

  • Sefania 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Basakoli na yango bazalaki na lofundo, bazalaki bato ya bokosi.+ Banganga-nzambe na yango bakómisaki eloko ya bosantu eloko mpamba; basakanaki na mobeko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto