Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 26:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe alobaki lisusu boye: “Mpo na nini nkolo na ngai azali kolandalanda mosaleli na ye,+ nasali nini, mpe mabe nini ezali na lobɔkɔ na ngai?+

  • Nzembo 35:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Mpo kaka mpamba babombi libulu na bango oyo batyeli ngai monyama;+

      Kaka mpamba batimoli yango mpo na molimo na ngai.+

  • Nzembo 69:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi kutu mingi koleka nsuki ya motó na ngai.+

      Baoyo bazali kokanga ngai monɔkɔ, baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba, bakómi ebele.+

      Bongo eloko oyo nayibaki te, nazalaki kozongisa yango.

  • Nzembo 109:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpe bazingi ngai na maloba ya koyina,+

      Mpe bazali kobunda na ngai kaka mpamba.+

  • Nzembo 119:161
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 161 Bankumu banyokoli ngai kozanga ntina,+

      Kasi motema na ngai eyoki nsɔmɔ ya maloba na yo.+

  • Yirimia 37:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na nsima, Yirimia alobaki na Mokonzi Zidikiya boye: “Na likambo nini nasaleli yo ná basaleli na yo mpe bato oyo lisumu,+ mpo bótya ngai na ndako ya bolɔkɔ?

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto