7 Amati lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa zamba na yango,+ mpe moto oyo azali kobebisa bikólo asimbi nzela akei;+ abimi na esika na ye mpo na kokómisa mokili na yo eloko ya kokamwa. Bingumba na yo ekobebabeba mpe moto ata moko te akofanda kuna.+
5 Mpe nakokómisa Raba+ esika ya koleisa bakamela matiti mpe mboka ya bana ya Amone esika ya kopema ya etonga ya bampate;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”+