Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na mikolo na ye, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amataki, bongo Yehoyakime akómaki mosaleli na ye+ mbula misato. Kasi abalukelaki ye mpe atombokelaki ye.

  • 2 Bakonzi 25:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe esalemaki boye: na mbula ya libwa+ banda akómaki mokonzi, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi+ ya sanza yango, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki,+ ɛɛ, ye ná limpinga mobimba ya basoda na ye, kobundisa Yerusaleme, mpe abandaki kotya kaa mpo na kobundisa yango mpe kotonga efelo ya kozinga mboka epai na epai.+

  • Yirimia 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Yango wana nkɔsi oyo ebimi na zamba ebomi bango, mbwa ya zamba ya mokili patatalu oyo ekauká ezali kaka kopunza bango,+ mpe nkoi ezali kaka kosɛnzɛla pene na bingumba na bango.+ Moto nyonso oyo azali kobima kuna azali kopasolama bitenibiteni. Mpo makambo na bango ya kobuka mibeko ekómi mingi; misala na bango ya kozanga bosembo ekómi ebele.+

  • Yirimia 50:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Yisraele azali mpate oyo epanzami.+ Bankɔsi bapalanganisi ye.+ Na mbala ya liboso mokonzi ya Asiri alyaki ye,+ mpe na mbala oyo ya nsima Nebukadrezare mokonzi ya Babilone abukibuki mikuwa na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto