Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 82:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bósambisa na bosembo moto oyo azangá mpe mwana mobali oyo tata akufá.+

      Bókata na bosembo likambo ya moto ya mpasi mpe ya moto oyo akelelá.+

  • Nzembo 94:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Bazali koboma mwasi oyo mobali akufá mpe moto oyo afandi mopaya,+

      Mpe bazali koboma bana oyo batata bakufá.+

  • Yisaya 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bóyekola kosala malamu;+ bóluka bosembo;+ bósembola moto oyo azali konyokola;+ bókata likambo mpo na mwana oyo tata akufá;+ bósamba likambo ya mwasi oyo mobali akufá.”+

  • Yirimia 7:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 soki bonyokoli te moto oyo afandi mopaya, mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+ mpe soki na esika oyo bosopi te makila ya moto oyo azali na likambo te,+ mpe soki bolandi te banzambe mosusu mpo na komibendela mpasi,+

  • Zekaria 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpe bóbubaka te mwasi oyo mobali akufá+ to mwana mobali oyo tata akufá,+ to moto oyo afandi mopaya+ to moto ya mpasi,+ mpe bókanaka na mitema na bino kosalelana eloko ata moko te ya mabe.’+

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto