Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 23:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Osengeli te kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ekoki kobulunganisa maloba ya bayengebene.+

  • Kolimbola Mibeko 16:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Osengeli te kopɛngwisa lisambisi.+ Osengeli te kopona bilongi+ to kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato ya bwanya+ mpe ebulunganisaka maloba ya bayengebene.

  • Kolimbola Mibeko 27:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘Alakelama mabe moto oyo andimi kanyaka mpo na koboma molimo moko boye, nzokande yango ezali makila ya moto oyo azali na likambo te.’+ (Mpe bato nyonso basengeli koloba: ‘Amen!’)

  • Nzembo 26:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Kolongola molimo na ngai elongo na basumuki te,+

      Mpe kolongola bomoi na ngai elongo na bato ya ngambo ya makila te,+

  • Yisaya 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+

  • Amose 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpo nayebi ete botomboki na bino ezali mingi+ mpe masumu na bino ezali na nguya,+ Ee bino baoyo bozali banguna ya moyengebene,+ bino baoyo bozali kozwa mbongo ya kokangisa bino monɔkɔ,+ mpe bato oyo bazali koboya babola+ ata na porte.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto