7 “Soki moko ya bandeko na yo akómi mobola epai na yo na moko ya bingumba na yo, na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyeisa motema na yo makasi to kokangela ndeko na yo mobola lobɔkɔ.+
12 Epai na yo, bazwi kanyaka mpo na kosopa makila.+ Ozwi benefisi+ mpe benefisi ya lokoso,+ mpe na mobulu, ozali se kozwa litomba+ na kobuba baninga na yo,+ mpe obosani ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
7 Bazali na mposa ya koyeisa putulu ya mabele na motó ya bato bazangá;+ mpe bazali kopɛngwisa nzela ya bato ya komikitisa;+ mpe mobali moko ná tata na ye mpenza bakei epai ya mwana mwasi se moko,+ mpo na kotuka nkombo na ngai mosantu.+