Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 15:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Pulu+ mokonzi ya Asiri+ akɔtaki na mokili yango. Na yango, Menaheme apesaki+ Pulu talanta nkóto moko (1 000) ya palata,+ mpo mabɔkɔ na ye ezala elongo na ye mpo na kokembisa bokonzi na lobɔkɔ na ye.+

  • 2 Bakonzi 16:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo Ahaze atindelaki Tiglate-pilesere+ mokonzi ya Asiri bamemi-nsango, na maloba oyo: “Nazali mosaleli+ na yo mpe mwana na yo. Matá mpe bikisá+ ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Siri mpe na lobɔkɔ ya mokonzi ya Yisraele, oyo bazali komata mpo na kobunda na ngai.”

  • 2 Bakonzi 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Shalmanesere+ mokonzi ya Asiri+ amataki mpo na kobunda na ye, mpe Hoshea akómaki mosaleli na ye mpe abandaki kofuta ye mpako.+

  • Yirimia 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe sikoyo mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Ezipito,+ mpo na komɛla mai ya Shihore?+ Mpe mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Asiri,+ mpo na komɛla mai ya Ebale?

  • Yirimia 2:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo na nini ozali komona ete kobongola nzela na yo ezali likambo ya mpamba?+ Okoyoka mpe nsɔni mpo na Ezipito,+ kaka ndenge oyokaki nsɔni mpo na Asiri.+

  • Bileli 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Topesi lobɔkɔ+ na Ezipito;+ na Asiri,+ mpo tótonda na limpa.

  • Ezekiele 16:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “‘Mpe na nsima, okendaki kosala bondumba na bana mibali ya Asiri mpo ozalaki kotonda kaka te,+ mpe okobaki kosala bondumba na bango kasi otondaki mpe te.

  • Hosea 5:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Bongo Efraime amonaki maladi na ye, mpe Yuda mpota na ye.+ Mpe Efraime akendaki epai ya Asiri+ mpe atindelaki mokonzi moko monene bato.+ Kasi ye akokaki te kobikisa bino,+ mpe akokaki te kolongola bino mpota ata na nkisi nini.+

  • Hosea 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe Efraime azali lokola ebenga ya zobazoba,+ oyo ezangi mayele.+ Babeleli Ezipito;+ bakei na Asiri.+

  • Hosea 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpamba te bango moko bamati epai ya Asiri,+ lokola zɛbrɛ oyo efandi kaka yango moko.+ Na Efraime, bafuti bandumba mbongo bázala bamakango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto