Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 17:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpe Mofilistia yango alobaki lisusu na Davidi boye: “Yo yaká awa, bongo nakopesa bandɛkɛ ya likoló mpe banyama ya zamba mosuni na yo.”+

  • Yirimia 7:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe bibembe ya bato oyo ekokóma mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele, moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa yango.+

  • Yirimia 34:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 ɛɛ, nakopesa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango;+ mpe bibembe na bango ekokóma mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.+

  • Ezekiele 32:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe nakosundola yo mpenza na mokili. Nakobwaka yo na esobe.+ Mpe nakofandisa epai na yo bikelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló, mpe nakosala ete banyama nyonso ya zamba ya mabele mobimba elya yo mpe etonda.+

  • Ezekiele 39:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Okokwea na bangomba ya Yisraele,+ yo ná bituluku na yo nyonso mpe bato ya bikólo oyo bakozala elongo na yo. Nakopesa yo ozala bilei mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama, bandɛkɛ ya mapapu ya ndenge nyonso, mpe banyama ya zamba oyo efandaka na esobe.”’+

  • Emoniseli 19:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 mpo bólya misuni+ ya bakonzi mpe misuni ya bakomanda ya basoda mpe misuni ya bato ya makasi+ mpe misuni ya bampunda+ mpe ya baoyo bafandi likoló na yango, mpe misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo mpe ya bato mike mpe ya bato minene.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto