Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe ebembe na yo esengeli kokóma bilei ya ekelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló mpe ya nyama ya zamba, moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa banyama yango.+

  • 1 Bakonzi 14:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Moto ya Yeroboame oyo akokufa na kati ya engumba, bambwa ekolya ye;+ mpe moto oyo akokufa na esobe, bandɛkɛ ya likoló ekolya ye,+ mpo Yehova ye moko alobi yango.”’

  • Nzembo 79:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Bapesi bandɛkɛ ya likoló bibembe ya basaleli na yo mpo ezala bilei na yango,+

      Mosuni ya bato na yo ya sembo na banyama ya zamba ya mabele.+

  • Yirimia 7:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe bibembe ya bato oyo ekokóma mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele, moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa yango.+

  • Yirimia 16:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 ‘Bakokufa na bamaladi oyo ebomaka.+ Bakolela bango te,+ mpe bakokundama te.+ Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele;+ mpe bakosuka na mopanga mpe na nzala,+ mpe bibembe na bango ekozala mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.’+

  • Yirimia 19:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nakokómisa mpamba mokano ya Yuda mpe ya Yerusaleme na esika oyo,+ mpe nakokweisa bango na mopanga liboso ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango.+ Mpe nakopesa bibembe na bango ezala bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto