Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Sikoyo talá! otyeli Ezipito+ motema, mongendu oyo babukabuká,+ oyo soki moto ayekameli yango, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao+ mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.

  • Yisaya 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe esika makasi ya libateli ya Farao ekokóma mpenza likambo moko ya nsɔni mpo na bino,+ mpe kobombama na elili ya Ezipito ekokóma eloko oyo ezali kosambwisa.+

  • Yisaya 31:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nzokande, Baezipito bazali bato ya mabele,+ kasi Nzambe te; mpe bampunda na bango ezali mosuni,+ kasi elimo te. Mpe Yehova ye moko akosembola lobɔkɔ na ye, mpe moto oyo azali kosunga akobɛta mpenza libaku, mpe moto oyo azali kosungama akokwea mpenza,+ mpe bango nyonso bakosila na mbala moko.

  • Yisaya 36:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Talá! Otyeli Ezipito+ motema, mongendu+ oyo babukabuká, oyo soki moto ayekameli yango, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango. Farao+ mokonzi ya Ezipito azali ndenge wana epai ya baoyo nyonso batyelaka ye motema.+

  • Ezekiele 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe na nzela ya limpinga monene ya basoda mpe na nzela ya lisangá ya bato ebele, Farao akolongisa ye na etumba te,+ na kotomboláká mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga mboka, mpe na kotongáká efelo ya kozinga mboka, mpo na koboma milimo ebele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto