Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 19:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bozoba ya moto ya mabele nde ebulunganisaka nzela na ye,+ bongo motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.+

  • Yisaya 55:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Mpo makanisi na bino ezali makanisi na ngai te,+ mpe banzela na ngai ezali banzela na bino te,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yisaya 55:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Mpo ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,+ ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino,+ mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+

  • Ezekiele 18:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘Mpe bokoloba mpenza ete: “Nzela ya Yehova ezali sembo te.”+ Nabondeli bino, bóyoka, Ee ndako ya Yisraele. Nzela na ngai nde ezali sembo te?+ Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?+

  • Ezekiele 18:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “‘Mpe ndako ya Yisraele ekoloba mpenza ete: “Nzela ya Yehova ezali sembo te.”+ Ee ndako ya Yisraele, ezali banzela na ngai nde ezali sembo te?+ Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto