Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo ye alobaki boye: “Nazali mpenza komona Bayisraele nyonso bapalangani+ na bangomba, lokola bampate oyo ezangi mobateli.+ Mpe Yehova alobaki lisusu boye: ‘Baoyo bazali na bankolo te. Tiká bázonga na kimya moto na moto na ndako na ye.’”+

  • Yirimia 23:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na babateli ya mpate oyo bazali koleisa bato na ngai: “Bino bopalanganisi bampate na ngai; mpe bozalaki kaka kopanza yango, mpe botyeli yango likebi te.”+

      “Talá nazali kotyela bino likebi mpo na mabe ya misala na bino,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yirimia 50:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bato na ngai bakómi etonga ya bampate oyo ezali kokufa.+ Babateli na bango batiki bango báyengayenga.+ Bamemi bango likoló ya bangomba.+ Bauti na ngomba, bakei na ngomba moke. Babosani esika na bango ya kopema.+

  • Matai 9:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Ntango amonaki ebele ya bato yango ayokelaki bango mawa,+ mpo banyokwamaki* mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.+

  • Marko 6:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Bongo ntango abimaki, amonaki ebele mpenza ya bato, kasi mawa+ ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate ezangi mobateli.+ Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto