Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 10:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo babateli ya mpate bamitambwisi na bozoba mpenza,+ mpe baluki Yehova te.+ Yango wana basali makambo kozanga mayele ya kososola, mpe banyama nyonso oyo bazalaki koleisa epalangani.”+

  • Yirimia 23:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi mpo na babateli ya mpate oyo bazali koleisa bato na ngai: “Bino bopalanganisi bampate na ngai; mpe bozalaki kaka kopanza yango, mpe botyeli yango likebi te.”+

      “Talá nazali kotyela bino likebi mpo na mabe ya misala na bino,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 34:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mwana ya moto, sakwelá babateli ya mpate ya Yisraele. Sakolá, mpe osengeli koloba na bango, na babateli ya mpate ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na babateli ya mpate ya Yisraele,+ oyo bakómi komileisa bango moko!+ Ezali etonga te nde babateli ya mpate basengeli koleisa?+

  • Zekaria 11:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 bato oyo basombi etonga yango babandi koboma+ yango, ata bongo bazali na ngambo te.+ Mpe baoyo bazali kotɛka+ yango bazali koloba ete: “Yehova apambwama, mpo nakozwa bomɛngo.”+ Mpe babateli na yango bazali komonisela yango motema mawa te.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto