Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 106:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Bikisá biso, Ee Yehova Nzambe na biso,+

      Mpe yanganisá biso longwa na bikólo+

      Mpo tópesa matɔndi na nkombo na yo mosantu,+

      Mpo tóloba na esengo mpo na kosanzola yo.+

  • Yisaya 65:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe nakobimisa bana na Yakobo+ mpe bazwi-ya-libula ya bangomba+ na ngai na Yuda; mpe bato oyo naponi bakozwa yango,+ mpe basaleli na ngai bakofanda kuna.+

  • Yirimia 23:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mpe ngai moko nakoyanganisa bampate na ngai oyo etikali uta na mikili nyonso epai napalanganisaki yango,+ mpe nakozongisa yango na esika na yango ya koleisa banyama matiti,+ mpe ekobota mpenza mpe ekokóma mingi.+

  • Yirimia 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo, “talá! mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakoyanganisa bakangami ya bato na ngai, Yisraele mpe Yuda,”+ Yehova alobi bongo, “mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bango, mpe bakozwa mpenza yango lisusu.”’”+

  • Ezekiele 11:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Na yango, lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosangisa mpe bino uta na bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili oyo na kati na yango bopalanganisamaki, mpe nakopesa bino mabele ya Yisraele.+

  • Ezekiele 28:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ntango nakoyanganisa ndako ya Yisraele uta na bato ya bikólo epai bapalanganisamaki,+ nakosantisama mpe na kati na bango na miso ya bikólo.+ Mpe bakofanda mpenza na mabele na bango+ oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo.+

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto