Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosakoli 12:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ,+ mpe baoyo bamipesi na kosangisa maloba ya mayele bazali lokola nsɛtɛ oyo ekɔtisami makasi;+ mobateli se moko ya mpate+ nde apesi yango.

  • Yirimia 23:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe nakotɛlɛmisela yango babateli oyo bakoleisa mpenza yango,+ mpe ekobanga lisusu te, ekolɛnga mpe na nsɔmɔ te,+ mpe moko te ekozanga,” yango nde liloba ya Yehova.

  • Yoane 10:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ngai nazali mobateli ya mpate+ oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.+

  • Baebre 13:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Sikoyo Nzambe ya kimya,+ oyo abimisaki uta na bakufi+ mobateli monene+ ya bampate+ na makila ya kondimana ya seko,+ Nkolo na biso Yesu,

  • 1 Petro 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe ntango mobateli ya mpate mokonzi+ akomonana polele, bokozwa motole ya nkembo+ oyo ebebaka te.+

  • Emoniseli 7:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpo Mwana-Mpate,+ oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba+ bango, mpe akomema bango na maziba ya mai+ ya bomoi. Mpe Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto