Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 mpe nakosala ete ekólo moko monene euta na yo mpe nakopambola yo mpe nakokómisa nkombo na yo monene; mpe zalá mpenza lipamboli.+

  • Balevi 26:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango,+ mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango,+ mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango.+

  • Kolimbola Mibeko 28:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova akofungolela yo ndako na ye malamu ya kobomba biloko, elingi koloba likoló, mpo na kopesa mbula na mokili na yo na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo;+ mpe okodefisa mpenza bikólo mingi, nzokande yo okodefa te.+

  • Nzembo 68:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Ee Nzambe, obandaki konɔkisa mbula ya makasi;+

      Ɛɛ ntango libula na yo elɛmbaki​—yo moko opesaki yango makasi.+

  • Masese 10:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi,+ mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.+

  • Zekaria 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ekosalema mpenza boye: kaka ndenge bokómaki elakeli mabe na kati ya bikólo,+ Ee ndako ya Yuda mpe ndako ya Yisraele,+ nakobikisa bino mpe ndenge wana, mpe bokokóma lipamboli.+ Bóbanga te.+ Mabɔkɔ na bino ezala makasi.’+

  • Malaki 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bóya na moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso+ na ndako ya kobomba biloko, mpo bilei ezala na ndako na ngai;+ mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo oyo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló+ te mpe soki nakosopela bino lipamboli te kino bosɛnga ekozala lisusu te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto