Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova akofungolela yo ndako na ye malamu ya kobomba biloko, elingi koloba likoló, mpo na kopesa mbula na mokili na yo na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo;+ mpe okodefisa mpenza bikólo mingi, nzokande yo okodefa te.+

  • Yisaya 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele,+ mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta.+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+

  • Ezekiele 34:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe nakokómisa yango ná bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba moke na ngai lipamboli,+ mpe nakokitisa mbula makasi na ntango na yango. Ekozala bambula makasi ya lipamboli.+

  • Yoele 2:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe bino bana ya Siona, bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino;+ mpo akozanga te kopesa bino mbula ya eleko ya otɔnɛ na ndenge oyo ekoki,+ mpe akonɔkisela bino mbula makasi, mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta, lokola na ebandeli.+

  • Amose 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “‘Mpe ngai, naboyaki mpe kopesa bino mbula ya makasi wana etikalaki kaka sanza misato mpo na kokóma na eleko ya kobuka mbuma;+ mpe nanɔkisaki mbula na engumba moko, kasi na engumba mosusu nanɔkisaki yango te. Mbula ezalaki konɔka na eteni moko ya mabele, kasi eteni oyo nazalaki konɔkisa mbula te ezalaki kokauka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto