Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 30:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Nde yo, kobanga te, Ee mosaleli na ngai Yakobo,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe kozala na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+ Mpo talá nazali kobikisa yo uta na mosika mpe bana na yo uta na mokili oyo bakangamaki.+ Mpe Yakobo akozonga mpenza mpe akotungisama lisusu te mpe akozala na kimya, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa ye.”+

  • Yirimia 46:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “‘Kasi yo kobanga te, Ee mosaleli na ngai Yakobo, mpe kolɛnga na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+ Mpo talá nazali kosikola yo uta na mosika mpe bana na yo uta na mokili ya bokangami na bango.+ Mpe Yakobo akozonga mpenza, mpe akozala na mitungisi te, mpe akozala na kimya mpe moto ya kolɛngisa ye akozala te.+

  • Ezekiele 28:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ntango nakoyanganisa ndako ya Yisraele uta na bato ya bikólo epai bapalanganisamaki,+ nakosantisama mpe na kati na bango na miso ya bikólo.+ Mpe bakofanda mpenza na mabele na bango+ oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo.+

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

  • Sefania 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na ntango yango, nakokɔtisa bino, ɛɛ, na ntango nakoyanganisa bino. Mpo nakosala ete bózwa nkombo mpe lisanzoli na kati ya bato ya bikólo nyonso ya mabele, ntango nakozongisa na miso na bino mpenza bato na bino oyo bakangamaki,” Yehova alobi bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto