20 Mpe Yehova alobaki lisusu na Arona ete: “Na mokili na bango okozala na libula te, mpe likabo moko te ekokóma ya yo na kati na bango.+ Ngai nazali likabo na yo mpe libula na yo na kati ya bana ya Yisraele.+
9 Yango wana, Levi azali na likabo te mpe na libula+ te esika moko na bandeko na ye. Yehova azali libula na ye, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo alobaki na ye.+
18“Banganga-nzambe, Balevi, libota mobimba ya Levi, bakozala na likabo mpe na libula elongo na Yisraele te.+ Makabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ, ɛɛ libula na ye, yango nde bakolya.+
14 Kaka na libota ya Balevi nde apesaki libula te.+ Makabo oyo batumbeli Yehova Nzambe ya Yisraele na mɔtɔ+ nde ezali libula na bango,+ ndenge alakaki bango.+
4 Eteni mosantu oyo ezwami na mokili yango ekozala mpo na banganga-nzambe,+ basaleli ya esika mosantu, baoyo bazali kobɛlɛma mpo na kosalela Yehova mosala.+ Mpe ekozala mpo na bango esika ya kotonga bandako, mpe esika esantisami mpo na esika mosantu.