Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Samwele alobaki na ndako mobimba ya Yisraele ete: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova,+ bólongola kati na bino banzambe ya bapaya+ mpe bikeko ya Ashitorete,+ mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye,+ mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+

  • 1 Bakonzi 8:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 mpe soki bakómi mpenza na makanisi ya malamu na mokili oyo bamemamaki bakangami,+ mpe soki na mokili ya bato oyo bakangaki bango,+ bazongi+ mpenza mpe basɛngi+ yo ondima bango, balobi ete: ‘Tosali lisumu+ mpe tobungi,+ tosali mabe’;+

  • Yisaya 55:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+

  • Yirimia 8:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo na nini bato oyo, Yerusaleme, bazangi bosembo na kozanga bosembo moko oyo ezali koumela? Basimbi bokosi;+ baboyi kozonga.+

  • Misala 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Na yango, bóbongola mitema+ mpe bóbongwana+ mpo masumu na bino ebomama,+ mpo bileko ya kopema+ euta epai ya Yehova ye moko

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto