9 Na yango, balobaki ete: “Longwá kuna!” Mpe babakisaki ete: “Talá mobali oyo, ayei awa kofanda mopaya,+ bongo alingi komikómisa mosambisi.+ Sikoyo tokosala yo mabe mingi koleka bango.” Mpe babandaki kotindika makasi mobali yango,+ Lota, mpe bazalaki kopusana mpo na kobuka porte.+