12 Nsukansuka, Yehoyakine mokonzi ya Yuda abimaki epai ya mokonzi ya Babilone,+ ye ná mama na ye,+ ná basaleli na ye, bankumu na ye ná bakapita ya ndako na ye; mpe mokonzi ya Babilone azwaki ye na mbula ya mwambe+ banda akómaki mokonzi.
25 Mpe nakopesa yo na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na yo+ mpe na lobɔkɔ ya baoyo ozali kobanga mpe na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone mpe na lobɔkɔ ya Bakaladea.+