Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo amemaki Yehoyakine+ na mboka mopaya, na Babilone;+ mpe amemaki mama ya mokonzi,+ basi ya mokonzi, bakapita ya ndako+ na ye mpe bato minene ya mokili, alongolaki bango na Yerusaleme akei na bango na mboka mopaya, na Babilone.

  • Yirimia 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “‘“Mpe nsima na yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakopesa Zidikiya mokonzi ya Yuda, basaleli na ye, bato mpe baoyo bakotikala na kati ya engumba oyo, baoyo bakobika na maladi mabe, na mopanga mpe na nzala, nakopesa bango na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, ɛɛ na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango, mpe bakoboma bango na mopanga.+ Akoyoka mpasi na motema mpo na bango te, mpe akomonisela bango motema mawa te mpe akoyoka mawa ata moke te.”’+

  • Yirimia 34:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 ɛɛ, nakopesa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango mpe na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka molimo na bango;+ mpe bibembe na bango ekokóma mpenza bilei mpo na bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe mpo na banyama ya mabele.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto