48 Na yango, mokonzi akómisaki Danyele moto monene,+ mpe apesaki ye makabo minene ebele, mpe akómisaki ye moyangeli ya etúká nyonso oyo eyangelami ya Babilone+ mpe mokonzi ya bakomisɛrɛ akamba bato nyonso ya bwanya ya Babilone.
13 Na yango, bakɔtisaki Danyele liboso ya mokonzi. Mokonzi azwaki maloba mpe alobaki na Danyele ete: “Yo nde Danyele, moko ya bato ya Yuda+ oyo bamemamaki awa na mboka mopaya, oyo mokonzi tata na ngai abimisaki na Yuda?+
29 Na ntango yango, Beleshazare apesaki mitindo, mpe balatisaki Danyele bilamba ya motane-bulé, ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo; mpe bapanzaki nsango ete akokóma moyangeli ya misato na bokonzi.+