15 Mpe nakotya+ bonguna+ kati na yo+ ná mwasi+ mpe kati na momboto na yo+ ná momboto na ye.+ Ye+ akopanza motó+ na yo+ mpe yo+ okozokisa ye+ na litindi.”+
10 Kasi Yehova ye moko asepelaki konyata ye;+ akómisaki ye moto ya maladi.+ Soki okómisi molimo na ye likabo ya ngambo,+ akomona bana na ye,+ akoyeisa mikolo na ye molai,+ mpe na lobɔkɔ na ye, likambo oyo esepelisaka+ Yehova ekolonga.+
20 Na nsuka, ntango basilisaki kosɛkasɛka ye, balongolaki ye elamba ya motane-bulé mpe balatisaki ye bilamba na ye ya likoló. Mpe bamemaki ye na libándá mpo na kobaka ye na nzete.+