Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 45:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta,+ na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye,+ mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.

  • Yirimia 51:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bósantisa bikólo mpo na kobundisa ye, bakonzi ya Media,+ baguvɛrnɛrɛ na yango mpe bayangeli-basungi na yango nyonso mpe mokili mobimba ya boyangeli ya moko na moko.

  • Danyele 5:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “PERESE, bakaboli bokonzi na yo mpe bapesi yango Bamede ná Baperse.”+

  • Danyele 11:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe sikoyo, nakoyebisa yo bosolo:+

      “Talá! Ekozala lisusu na bakonzi misato oyo bakotɛlɛma na Perse,+ mpe oyo ya minei+ akoyanganisa bomɛngo mingi koleka bamosusu nyonso.+ Mpe ntango kaka akokóma makasi na bomɛngo na ye, akosala ete eloko nyonso etɛmɛla bokonzi ya Grɛsi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto