Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ee talá ndenge engumba ya sembo+ ekómi mwasi ya ndumba!+ Etondaki na bosembo;+ boyengebene efandaki kuna,+ kasi sikoyo ezali nde babomi-bato.+

  • Yirimia 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Balobaka boye: “Soki mobali moko alongoli mwasi na ye mpe mwasi yango akei mpenza, atiki ye mpe akómi mwasi ya mobali mosusu, mobali yango akozongela ye lisusu?”+

      Mokili yango ekómi mbindo te?+

      “Mpe yo osali bondumba na baninga ebele;+ bongo okozongela ngai lisusu?”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Ezekiele 16:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “‘Kasi obandaki kotyela kitoko na yo motema+ mpe okómaki ndumba mpo na nkombo na yo+ mpe obandaki kosopela moleki-nzela nyonso misala na yo ya bondumba;+ kitoko yango ekómaki ya ye.

  • Ezekiele 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe Ohola abandaki kosala bondumba,+ wana azalaki naino na nse ya bokonzi na ngai, mpe azalaki na mposa makasi ya kosangisa nzoto na baoyo bazalaki kolula ye mingi,+ bato ya Asiri,+ oyo bazalaki pene,

  • Hosea 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu boye: “Kende lisusu, lingá mwasi oyo moto mosusu alingi+ mpe oyo azali kosala ekobo, lokola na likambo ya bolingo ya Yehova na bana ya Yisraele,+ ntango bango bazali kokende epai ya banzambe mosusu+ mpe bazali kolinga bagato ya mbuma ya vinyo.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto